Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

LOLAKA YA MOLONGO magazine

LOLAKA YA MOLONGO magazine

La langue est sans conteste le véhicule de la culture d'un peuple. Aussi, plus qu'un blog, nous voulons que cet espace soit une plateforme qui s'articule dans le sens de promouvoir le lingala , une des plus belles langues du Kongo-RdCongo.et nous comptons le faire tant par l'écrit que par l'audio et des video.


TOTANGA uta ebungutulu tii na monkama ( 0 tii 100)

Publié par Leobanem BN sur 28 Septembre 2019, 23:04pm

Catégories : #liteya ya lingala

TOYEBA KOTANGA NA MOLONGO

 

-Na liteya tokopesa awa tokobanda naino botangi ya molongo uta ebungutulu tii na nkoto

 (0-1000). Oyo ekoya sima lokola bankoto na bankoto nde tomoni mpe lolenge na yango tii na ba milione.

. Liteya lina nde ekopesa biso boyebi ya kotanga mikolo ya mposo na bolembu, yango ezali sambo : uta mokolo mwa yambo kino eye ya sambo (1-7). na mpe basanza :uta ya yambo tii na eye ya zomi na mibale (1-12) oyo esali mobu mobimba mpo mobu moko ezali na ba sanza zomi na mibale.

*LIKEBISI: na etangeli ya lingala na molongo tozali na ndenge MINEI-4 ya kotanga : KOBAKISA (+), KOLONGOLA(-), KOKABOLA ( : ),KOYIKA (x).

Tango bakotiaka ‘’na ‘’ ekolakisa ‘kobakisa’, ezali ndenge moko na elembo oyo ya kuruse : + ndakisa: MOKO na MIBALE (1+2) epesi (=) MISATO-3 Tango tolobi bongo MOKO NA MIBALE elingi koloba ndenge tokotanga na molayi boye: TOBAKISI MOKO LIKOLO YA MIBALE , yango ekopesa biso eloko mosusu likolo ya oyo ezalaki liboso, yango tozalaki na MOKO-1 mpe tobakisi Mibale-2 tokomi sika na MISATO-3 (1+2=3) Yango nde tokosembola etangeli boye : MOKO tobakisi MIBALE (to MOKO tobakisi likolo ya MIBALE) epesi MISATO.

 

TOTANGA uta ebungutulu tii na monkama (0 tii 100):

-ebungutulu -0

moko-1;

mibale-2;

misato-3 ;

minei-4 ;

mitano-5 ;

motoba-6 ;

sambo-7 ;

mwambe-8 ;

libwa-9 ;

-ZOMI -10 ;

zomi na moko- 11 ;

zomi na mibale-12 ;

zomi na misato-13 ;

zomi na minei-14 ;

zomi na mitano-15 ;

zomi na motoba-16 ;

-zomi na sambo-17 ;

-zomi na mwambe-18 ;

-zomi na libwa-19 .

-NTUKU MIBALE -20 ;

ntuku mibale na moko-21 ;

ntuku mibale na mibale-22 ;

ntuku mibale na misato -23 ;

ntuku mibale na minei -24;

ntuku mibale na mitano -25 ;

ntuku mibale na motoba 26 ;

ntuku mibale na sambo -27 ;

ntuku mibale na mwambe-28

ntuku mibale na libwa-29 ;

-NTUKU MISATO -30;

-ntuku misato na moko-31;

-ntuku misato na mibale-32;

-ntuku misato na misato-33;

-ntuku misato na minei-34;

-ntuku misato na mitano-35;

-ntuku misato na motoba-36;

-ntuku misato na sambo-37;

- ntuku misato na mwambe-38;

-ntuku misato na libwa-39;

-NTUKU MINEI-40;

ntuku minei na moko-41;

ntuku minei na mibale-42;

ntuku minei na misato-43;

ntuku minei na minei-44;

ntuku minei na mitano-45;

ntuku minei na motoba-46;

ntuku minei na sambo-47;

ntuku minei na mwambe-48;

ntuku minei na libwa-49;

-NTUKU MITANO-50;

ntuku mitano na moko-51;

ntuku mitano na mibale-52;

ntuku mitano na misato-53;

ntuku mitano na minei-54;

ntuku mitano na mitano-55;

ntuku mitano na motoba-56;

ntuku mitano na sambo-57;

ntuku mitano na mwambe-58;

ntuku mitano na libwa-59;

-NTUKU MOTOBA-60;

ntuku motoba na moko-61;

ntuku motoba na mibale-62;

ntuku motoba na misato-63;

ntuku motoba na minei-64;

ntuku motoba na mitano-65;

ntuku motoba na motoba -66;

ntuku motoba na sambo-67;

ntuku motoba na mwambe-68;

ntuku motoba na libwa-69;

-NTUKU SAMBO-70;

ntuku sambo na moko-71;

ntuku sambo na mibale-72;

ntuku sambo na misato-73;

ntuku sambo na minei-74;

ntuku sambo na mitano-75;

ntuku sambo na motoba-76;

ntuku sambo na sambo-77;

ntuku sambo na mwambe-78;

ntuku sambo na libwa-79;

-NTUKU MWAMBE-80;

ntuku mwambe na moko-81;

ntuku mwambe na mibale-82;

ntuku mwambe na misato-83;

ntuku mwambe na minei-84;

ntuku mwambe na mitano-85;

ntuku mwambe na motoba-86;

-ntuku mwambe na sambo-87

-ntuku mwambe na mwambe-88;

-ntuku mwambe na libwa-89

-NTUKU LIBWA -90;

ntuku libwa na moko-91;

-ntuku libwa na mibale-92;

-ntuku libwa na misato-93;

-ntuku libwa na minei-94;

-ntuku libwa na mitano-95;

-ntuku libwa na motoba-96;

-ntuku libwa na sambo -97;

-ntuku libwa na mwambe-98;

-ntuku libwa na libwa-99;

-NKAMA MOKO-100 (to monkama .mo=moko na bokuse)

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article

Archives

Nous sommes sociaux !

Articles récents