Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

LOLAKA YA MOLONGO magazine

LOLAKA YA MOLONGO magazine

La langue est sans conteste le véhicule de la culture d'un peuple. Aussi, plus qu'un blog, nous voulons que cet espace soit une plateforme qui s'articule dans le sens de promouvoir le lingala , une des plus belles langues du Kongo-RdCongo.et nous comptons le faire tant par l'écrit que par l'audio et des video.


MAIKA KATI YA MAQUIS

Publié par Leobanem BN sur 29 Septembre 2019, 23:38pm

Catégories : #Lisolo, #récit, #nouvelle

 

 Maïka kati ya maquis

 

 Bandeko, lisolo oyo tokotanga awa ya Maïka ezali kaka lisolo te, kasi ezali nde toli tokopesa na bilenge baye balukaka bamona suka ya mokili mpo makmabo yango ekoleka kasi tokomona yango kaka liseki.. Nzoka basi nyoso to mibali nyoso okomonaka bazali kaka mpo na yo te. Soki osili oyoka 'te moto abimaki malamu kasi azongi te. bakuti ye akufi na hôtel . Yango ekolakisa bizaleli ya mabe lifuta na yango kaka soki boloko te liwa.

 

 Tozali na mboka Kinshasa. Awa tokomaki na eleko oyo bana kelasi bamilengelaka mpo na koleka momekano ya suka (to examen d’Etat). Momekano wana ezali penza likambo monene mpe na ntina mibale. Ya liboso baye bakolonga bakozua lipolomi na bango ya yambo na bomoyi na bango.Mpe tobosana te momekano wana esalemi mpo na bayekoli banso ya kelasi ya suka na Kongo mobimba. Tala lokumu soki olongi mpe bo momeseno bakosepelisa yo na milulu bakosomba masanga , bakolamba mpe banso bakolia bakomela na baninga na bandeko !

Mokanda mona soki ekolakisa ‘te uta wana mwana alongwe penza na bomwana mpe akoti na bomoyi ya mikolo, mozali mpe kopesa bango nzela mpo na kosala mosala. Kasi ezali mpe lisusu kopesa nzela ya kokota na bakelasi ya minene mpo na koluka kokolisa mayele ya mosala oyo bakosala ndele. Awa na Kinshasa, bayekoli mingi mpo na yango bakotaka na maquis .

Maquis ezali esika ya kobombana mpo na kobongisa na mozindo mosala na yo liboso ‘te omibimisa. Na Kinshasa, toyebi ‘te ata babeti ndembo to miziki mpe basalaka yango. Yango bayekoli ya kelasi ya suka, na ndenge mingi bazangi esika ya malamu ya koyekola na bandako ya baboti na bango, basangisaka mbongo mpo na kozua ndako ya kofutela mpo na eleko wana tii basilisa mimekano .

Kasi talaka likolo ya mibunga mingi maquis ekoma na sango ya mabe ya bazemi , mpe kindumba ,koleka penza mpo na bana basi. Yango wana baboti mingi bakosepelaka te ndenge bana basi bakokendaka kofanda bango moko na bisika wana na tango oyo bakokisi naino mbula ya kofanda bango moko te.

Makanisi oyo euti penza na ndenge bakokolisaka bana basi mpo na libala. Mpe soki mwana mwasi azui zemi, mbala mingi akotikaka koyekola mpe bomoyi na ye na batango mingi ekokomaka lisusu na nzela malamu te. Mpo wana akomi mama ya mwana . Mayele nyoso akopesa na kobokola mwana mpe ata babali ye, ekozala lisusu na lokumu te ndenge baboti ba ye bakanaki.

Nzoka ya solo, bana mibali na bana basi bakendeke mpe tango mosusu kosangana na lopango moko. Moto na moto akomaka bongo na tango na ye ya lipanda mpo azali lisusu epai ya baboti na ye te. Akomibatela ye moko na koyebaka 'te ayei wana mpo na koyekola, kosakana te .

Wana kati na bango, Maïka, mwana mwasi moko , nzoto kitoko, alinga monzele makasi, azalaki moyekoli na eteyelo ya kotonga bilamba ye na baninga ba ye na commune ya Lingwala. Ye akomaki na mibu zomi na libwa kasi amesanaki na banzela mingi ya ye moko oyo ata baboti na ye na baninga ya kelasi na bango bayebaki te.

Liboso ata na eteyelo na bango, azalaki tango nyoso komikomikosa moninga ya balakisi na ye. Baninga na ye bazalaki kokamwa ye mpo azalaki koleka bakelasi kasi bazalaki komona tango azalaki koyekola te. Bayebaki kaka 'te azalaki kosomba elonga na ye na banzela ebele. Kamataka ata oyo bana basi bazalaka na yango , tango mosusu ya koteka nzoto na bango mpo bazua elonga na mimekano nyoso . Ekomaki na ye momesano mpe tango mosusu baninga bazalaki kokuta ye na mikanda ya mimekano misusu liboso kutu ‘te bapesa yango na kelasi.Ye ayebaki nyoso. Kasi azalaki kaka ye moko te mpo na tango oyo bana mingi bakoma kosala kaka bongo.Ekoma lokola eloko moko ya mobeko na bakelasi awa na KInshasa. ‘’Mpo ozua tia motu bakata’’ ndenge bakolobaka ! Kobanga eloko te! Lokola lifuti ya balakisi ezalaka mpe lisusu malamu te, esili eleki bambula ebele, banso bakoma komibikela epai ya bana kelasi soki mpe baboti na bango te. Yango kosenga mbongo na banzela nyoso ekoma na yango ezaleli ya kokamwisa lisusu te kati ya engumba ya Kinshasa. Mpo olonga esengeli kosenga mingi penza opesa molakisi mbongo soki te , mpo na bana basi, ata kopesa nzoto. Moto ya kofunda moninga azalaki te.Lokola mpe bankisi ya kopekisa zemi na bakapoti ekoma na yango pamba pamba , mobulu emata lisusu komata uta kaka bakelasi ya mike tii likolo. Bongo lobi baluka libala ya mwasi na ngondo? Mobali akanga motema. Basi mpe bakanga motema. Nani akosa moninga? Balakisi bazalaka lisusu ndakisa te. Kutu bango moko balakisi bakoma kosala nyoso 'te bayekoli balanda bango sima ya kelasi na ndako na bango ya mosala to bilo . Wana ekoma mpo na bango nzela ya koteka kaka mikanda ya kelasi to basyllabus te kasi penza nzela ya kokanga bilenge misusu ya basi na motambo.

Misusu toloba 'te tango ya mimekano , soki alingaki mwana mwasi liboso mpe mwana mwasi aboyaki, akozela ye kaka na tango ya momekano na suka ya mbula.

wana nde sukisa! Futa mpako ya leta mpo oleka! Bongo tango ya koluka mosala to komata na ebonga ya likolo na misala akosala, na tango oyo ekoma ‘te bakonzi mingi bakosengaka kaka basepelisa naino bamposa ya nzoto soki te..mpasi mpo na mwana mwasi kosala na mibali.

Talaka Maïka na baninga na ye bayokani bazua ndako na Lingwala.

Kasi ezalaki kosenga bapesa mwa mbongo ya mingi lokola ndenge nkolo lopango azalaki kosenga. Mpe na mbala oyo basengaki na moto moko na moko apesa 300 dollars mpo ekokisa na kolia na kolala na bango sanza misato na ndako mobimba batikelaki bango . Bazalaki wana ata bato zomi.

Maïka azalaki kozela motuka mpo azonga ndako na bangonga ya mpokwa na balabala 24 novembre. Wana mituka mpasi mpo na kozua, kasi talaka motuka moko ezali naino ya sika penza etelemi mpe mokumbi atuni Maïka -Okokende wapi? Maïka azongisi:-na Bandal.

Mokumbi motuka alobi na ye:

-Kota!

Ye wana na esengo nyoso akoti na motuka epai ya sima ,akanisi kaka ndenge bato mosusu basalaka taxi sima ya mosala mpo na kozongisa mbongo ya essence. .Tala butu ekomaki kokota mpe baboti na ye bazalaki kolinga te 'te ye mwana mwasi azongaka ndako na butu. Tango akoti na motuka, mokumbi afandi kaka nye akokumba motuka na ye tii na tango bakomi na balabala Prince de Liège pene ya esika batia television ya ekolo ,oyo bakobengaka La Voix ata ekoma Rtnc tango ya Laurent Kabila. Wana mituka mitelemi na mwinda ya motane mpe bakozila mwinda ya mayi ya pondu epela mpo bazua nzela. Mokumbi motuka azalaki mwa mokolo ya mibu ata Ntuku minei ndenge Maika amonaki ye. Apakola malasi ya ntalo, nsolo ekolumba na kati ya motuka na ye. Kaka ata mbula moko na tata na ye! Kasi awa ye amesanaki na oyo ye na baninga na ye bazalaki kobenga “koshina”, elingi koloba kozala na mibali oyo olingaka te kasi basungaka yon a misolo ya pembeni mpo asala bamposa na ye.

Baboti na ye bazalaki penza na makoki mingi te mpe ata bongo bazalaki ebele na libota na bango.

Wana tango mokumbi motuka abandi lisolo, Maïka asopi mafuta ya nzoi na maloba na ye mpo esepelisa ye. Nyoso mpo akangama na ye. Tango mosusu mpe, ndenge azalaki komilobela, mokolo na ye ya lipamboli yango wana , bongo alekisa yango? Ata bino moko ! Ndenge balobanka nabaninga na ye : « Lipamboli na bomoi eyaka mbala mibale te! » Wana na nse ya motema akotanga misolo ya bamposa na ye . Mpe tango mosusu tata oyo akofutisa ye taxi te ...eh totala kaka !...mpe wana akotikala na libenga na ye na misolo 700fc . Ezali moke te mpo lobi mpe mokolo ... Kasi ndenge nini akoki kobenda ye akota penza kati ya makambo mpo esengeli azua 300 dollars ndenge bakosenga mpo na maquis.

Mokumbi motuka atuni ye kaka soki akotangaka wapi, ye azongisi na eteyelo ya kotonga bilamba . Wana mpe abakisi akosilisa mbula oyo mpe azali kokota maquis.

Awa mokumbi taxi ayoki boye abongisi talatala na ye ya komona sima mpe atuni ye kaka;''- -bongo okokendaka kelasi na yo kaka na nzela oyo? ''

Maïka andimi. Mokumbi motuka alobi na ye :'

'tala nakendaka mosala na tongo. Soki okoki kozala na rond point ya Moulaert na bangonga ya mwambe wana nakozua yo tii na eteyelo na bino''.

Maika lokola soki alamuki; -Ah !na Moulaert?''

Amituni na nse ya motema ndenge nini ayebi 'te ye mpe akokita na Moulaert? Mwana mwasi abakisi -merci , ozali gentil.

Bango wana , kala mingi te bakomi na Moulaert, mokumbi motuka alobi na Maïka :

- ''okita awa mpo nazali kokende mbangu na lopitalo liboso bakanga mpo moto moko basalaki ye lipaso.’’

Tango Maïka akiti na motuka alingi afuta mbongo, kaka ndenge akanisaki, mokumbi motuka alobi na ye :

-oh te bomba yango mpo na bamposa misusu, ozali mwana ya kelasi nayebi''.

Mais, monsieur..Nakoki koyeba ata nkombo? Ngai Maïka..

Kasi mokumbi motuka azongisi ye :

-Oh lobi , tokosolola bien lobi , akotisi loboko na kazaka na ye mpe alobi;

-simba ata cent dollars oyo .

Maïka akamaiti mbongo na lombangu, akondima te, akangi yango makasi na loboko. Alataki elamba ya likolo ekangama na singa moko kasi soki abendi yango elamba ekotika ntolo polele soki anguzami, ye mpe azalaki na ye na ebombano mabele te. wana akiti na motuka mpe apusani na lininisa ya liboso ya motuka mpe anguzami mpo na kopesa matondi amibongisi mpo na kotalisa penza ntolo na ye. Mokumbi motuka apesi ye mbote kasi alobi kaka :

- Allez, Maïka, lobi na 8:00h!

mpe akei na ye .

Maïka abaluki mpe abandi kokenda, makanisi kaka kaka na tata wana : ' « ngolo oyo azali penza monene, kasi nayebi ata kombo na ye te ! mpe asalaka wapi ? tango mosusu na présidence to na banque …Na yango esengeli nabongisa nyoso penza mpo nazua ye malamu lobi, mpo akoki kosunga ngai na makambo ebele... » Na yango asili amilobeli 'te lobi na yango akolatela ye elamba moko ya mokuse atonga na liputa efungwamaka liboso; mpe lokola akoya kozua ye na tongo , akofanda kaka liboso , tembe te !

Wana mwana mwasi akotambola na nzela ya ndako na bango, abosani kutu 'te asili akoti na balabala na bango. Akobongisa kaka mayele na ndenge akosala lobi.

© Leobanem

 

 

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article

Archives

Nous sommes sociaux !

Articles récents